Nakotombola miso na ngai epai na bangomba; lisungi

Nakotombola miso na ngai epai na bangomba; lisungi

Pop

00:00 / 00:00

Your friends are using AiMusic.la to generate music, listen to it! You can also generate your own music!

Lyrics

Nakotombola miso na ngai epai na bangomba; lisungi na ngai ekowuta wapi? Lisungi na ngai ekowuta epai na Yawe, Mozalisi ya likoló ná mabélé. Akotika te ete makolo na yo ekungwama; Mozalisi na yo akolala mpongi te. Talá, akolala mpongi te, akokanga miso te, Ye oyo azali kobomba Yisalaele. Yawe azali kobomba yo, Yawe azali elilingi na yo na loboko na yo ya mobali. Moyi ekokoma yo te na ntángo ya moyi, ngonda mpe te na butu. Yawe akobomba yo na mabe nyonso; akobomba molimo na yo. Yawe akobomba yo ntángo okobima mpe ntángo okokota, banda sikoyo mpe libela.