Natiaka miso na ngai epai na Yo, Yo oyo ovandi na

Natiaka miso na ngai epai na Yo, Yo oyo ovandi na

Pop

00:00 / 00:00

Your friends are using AiMusic.la to generate music, listen to it! You can also generate your own music!

Lyrics

Natiaka miso na ngai epai na Yo, Yo oyo ovandi na likoló. Tala, lokola miso ya basali etalaka lobɔkɔ ya nkolo na bango, mpe lokola miso ya mosali mwasi etalaka lobɔkɔ ya nkolo mwasi na ye, bongo mpe miso na biso etalaka Yawe Nzambe na biso, kino akoyokela biso mawa. Yawe, yokela biso mawa, yokela biso mawa, pamba te tosili kotonda na kofingama. Molimo na biso etondi mingi na kofingama ya bato ya lofundo, mpe na kotyolama ya bato ya lolendo. Natiaka miso na ngai epai na Yo, Yo oyo ovandi na likoló. Tala, lokola miso ya basali etalaka lobɔkɔ ya nkolo na bango, mpe lokola miso ya mosali mwasi etalaka lobɔkɔ ya nkolo mwasi na ye, bongo mpe miso na biso etalaka Yawe Nzambe na biso, kino akoyokela biso mawa. Yawe, yokela biso mawa, yokela biso mawa, pamba te tosili kotonda na kofingama. Molimo na biso etondi mingi na kofingama ya bato ya lofundo, mpe na kotyolama ya bato ya lolendo.